Ebɛbɛlɛ
From Wikipedia, the free encyclopedia
Ebɛbɛlɛ, ebɛkɛ tǒ engóngóló (cranium) ezalaka lisangá ya mikúwa o likólo ya mokesa epái na nyama ya mikúwa. Sandúku ya mikúwa eye ekúkamela bɔngɔ́.
Na moto ebɛbɛlɛ ezalaka na mikúwa 8 biye bitóngana libúlú mɔ̌kɔ́ wápi evándaka bɔngɔ́. Libúlu óyo etɔ́ndela 1 450 ml na moto mokóló.
Eboló ezalí eténi ya libosó ya likólo ya ebɛbɛlɛ, kasi babêngaka ebɛbɛlɛ eboló mbala isúsu.